Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 26:1 - Mokanda na Bomoi

1 Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 26:1
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.


Atobolaki na bamir oyo ezingelaki Tempelo, ezala na kati to na libanda, bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.


Wana Davidi avandaki na ndako na ye ya bokonzi, alobaki na mosakoli Natan : — Nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezali kati na ndako ya kapo.


Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni.


Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.


bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,


Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.


Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi.


Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.


Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba.


Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ;


Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango ;


Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.


langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,


Basalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. Mpe bato oyo basalaka bililingi batongaki basheribe ya kitoko na rido yango.


Batandaki mabende mike-mike ya wolo, bakataki-kataki yango lokola basinga mpe bakotisaki kati na langi ya ble mpe ya motane ya pete, langi ya motane makasi mpe lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.


— Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani ;


Na Ndako ya kapo ya Bokutani, bakitani ya Gerishoni bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo mpe ndako ya kapo, bizipelo na yango, rido ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani,


bakobanda komema batapi ya Mongombo mpe Ndako ya kapo ya Bokutani elongo na elamba na yango, elamba ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale mpo na kozipa na likolo, rido ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani,


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko.


Kuna na Likolo, asalaka mosala na Ye kati na Esika ya bule, elingi koloba : Mongombo ya solo, oyo Ye moko Nkolo atonga, kasi bato te.


Batelemisaki Mongombo oyo ezalaki na biteni mibale : kati na eteni ya liboso oyo bazalaki kobenga « Esika ya bule, » ezalaki na etelemiselo ya minda, mesa mpe mapa oyo babonzi lokola makabo epai ya Nzambe.


Mpe ezali elilingi ya makambo oyo ezali kosalema na tango oyo mpo na kotalisa ete makabo mpe bambeka oyo babonzelaka Nzambe ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, mitema ya bato oyo basambelaka ndenge wana.


Elamba ya lino ya kitoko oyo ezali kongenga epesameli ye mpo ete alata yango. » Elamba ya lino ya peto ezali misala ya bosembo ya basantu.


Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ