Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 25:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 25:8
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe nakoya kovanda kati na bato ya Isalaele mpe nakosundola te bato na Ngai, Isalaele.


Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »


Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.


Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye ; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.


Boye nakovanda kati na bana ya Isalaele mpe nakozala Nzambe na bango.


Bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango, Nzambe oyo abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na kovanda kati na bango. Nazali Yawe, Nzambe na bango.


Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! »


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.


Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › »


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba.


Moyize abengisaki Mishaeli mpe Elitsafani, bana mibali ya Uzieli, noko ya Aron. Alobaki na bango : « Boya kolongola bibembe ya bandeko na bino liboso ya Esika ya bule mpe bomema yango na libanda ya molako. »


Azali na ndingisa te ya kotika Esika ya bule ya Nzambe na ye to kobebisa bosantu na yango, pamba te abulisamaki na nzela ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye. Nazali Yawe.


Nakotia Ndako na Ngai kati na bino mpe nakotombokela bino te.


Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya Esika ya bule.


Tokende ! Tokende ! Tobima noki na mokili ya nor, elobi Yawe, pamba te Ngai moko nde napanzaki bino na mokili mobimba, elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »


Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. »


Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani kati na esobe, batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki.


Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.


Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase : — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe.


Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ