Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 25:2 - Mokanda na Bomoi

2 — Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 25:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango basungaki bango ; bapesaki biloko esalema na palata mpe na wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge, bakado ya talo mpe makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.


Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala.


Sima na yango, babonzaki mbeka ya kotumba ya tango nyonso, bambeka ya kotumba oyo ekatama mpo na feti ya ebandeli ya sanza mpe mpo na feti nyonso oyo ekatama mpo na Yawe, mpe bambeka ya kotumba mpo na bato nyonso oyo bazalaki bango moko kopesa makabo wuta na mokano ya mitema na bango.


elongo na palata mpe wolo nyonso oyo okozwa na etuka ya Babiloni, makabo oyo bato mpe Banganga-Nzambe bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango, mpo na Tempelo ya Nzambe na bango kati na Yelusalemi.


Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi.


Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.


Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango : wolo, palata mpe bronze,


Na esika na yango, napesi epai ya Balevi lokola libula na bango, biteni moko nyonso kati na biteni zomi oyo bana ya Isalaele bakopesa lokola likabo epai na Yawe. Yango wana, nalobaki na tina na bango : ‹ Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. › »


Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.


Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. Bokumisa Yawe !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ