Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Yawe azongiselaki ye : — Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.
Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo.
Kasi mokambi, ye kaka, lokola azali mokambi nde akoki kovanda na kati mpo na kolia bilei liboso ya Yawe ; akokotela na nzela ya ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. »
Bana mibali ya Aron, Nadabi mpe Abiyu, bazwaki moko na moko mbabola na ye ; batiaki yango makala ya moto mpe batiaki ansa na likolo ya makala yango. Lokola bakokisaki te kolanda oyo basengelaki kosala, bamemaki moto ya mopaya liboso ya Yawe.
Yawe alobaki na Moyize : — Kati na bakambi ya Isalaele, sangisela Ngai mibali tuku sambo, ba-oyo oyebi ete bazali bakambi mpe bakalaka kati na bato. Tika ete baya na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe batelema wana elongo na yo.