Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 24:7 - Mokanda na Bomoi

7 Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki : — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi mpe tokotosa yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 24:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.


Balapaki ndayi epai na Yawe, na mongongo makasi, na kobeta maboko mpe milolo, mpe na lokito ya kelelo mpe ya maseke.


Alobi : « Bosangisela ngai bayengebene na ngai, ba-oyo basalaki Boyokani elongo na ngai na nzela ya mbeka. »


Kasi bazalaki koloba lokuta, minoko na bango ezalaki kokosa Ye ;


Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko : — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki :


Ezala esepelisi biso to te, tokotosa kaka Yawe, Nzambe na biso, oyo topesi yo mokumba ya kotuna. Na bongo, makambo nyonso ekotambola malamu mpo na biso, pamba te tokotosa Yawe, Nzambe na biso.


Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.


Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te ? Boni, tokelama na Nzambe moko te ? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso ?


Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba : — Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.


Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala ete etangama mpe kati na Lingomba ya Laodise ; bongo bino mpe botanga oyo ekowuta na Laodise.


Nasengi na bino, na Kombo ya Nkolo, ete botangelaka bandeko nyonso mokanda oyo.


Bato bazongiselaki Jozue : — Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ