Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba ; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso.
oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango : « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino ; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino.
« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki :
Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te ? Boni, tokelama na Nzambe moko te ? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso ?
Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,