16 mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata.
Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.
Yawe alobaki na Moyize : — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.
Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te ; ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo.
Boye, Yawe akokela na likolo ya ngomba mobimba ya Siona mpe na likolo ya bato oyo basanganaka kuna : lipata na tango ya moyi, mpe kongenga ya moto na tango ya butu. Bongo na likolo na nyonso, nkembo na Yawe ekozipa bango.
Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula ; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai.
Wana lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki koloba ete baboma bango na mabanga, nkembo ya Yawe emonanaki na Ndako ya kapo ya Bokutani na miso ya bato nyonso ya Isalaele.
Pamba te Nzambe oyo alobaki : « Tika ete pole engenga kati na molili, » angengaki Ye moko kati na mitema na biso mpo na kopesa biso pole ya boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Yesu-Klisto.