Jakobi abonzaki mbeka likolo ya ngomba mpe abengisaki bandeko na ye ya mibali mpo na kolia bilei. Tango basilisaki kolia, balekisaki butu na esika wana, likolo ya ngomba.
Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya lokumu, bakambi ya bato mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya likolo. Mpe kuna, bavandisaki ye na kiti ya bokonzi.
Bakalaka bayebaki te esika oyo nakendeki to likambo oyo nazalaki kosala ; pamba te kino na ngonga wana, nalobaki nanu ata likambo moko te, ezala epai ya Bayuda, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya bankumu, epai ya bayangeli to mpe epai ya bakambi mosusu oyo bazalaki kosala mosala.
Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.
Bakambi bazali kotinda basali na bango mpo ete bakende kotoka mayi ; kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, bazipi bilongi na soni mpe na mawa.
Nasololaka na ye elongi na elongi, na polele penza kasi na masese te. Amonaka lolenge ya Yawe. Mpo na nini bozali na somo te ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?
Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.