10 epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo.
Jakobi alobaki : — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? Boye apambolaki ye na esika wana.
Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Alobaki lisusu : — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe.
Maboko na ye ezali lokola bapete ya wolo oyo batia mabanga ya Krizolite. Nzoto na ye ezali lokola pembe ya nzoko oyo babongisi mpe babakisi mabanga ya safiri.
Nani oyo azali komonana lokola moyi ya tongo, kitoko lokola sanza, azali kongenga lokola moyi, abangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango ?
Bana ya bakonzi na bango bazalaki kongala koleka mvula ya pembe, pembe koleka miliki ; banzoto na bango ezalaki motane koleka langi ya motane penza, mpe lolenge na bango ezalaki lokola libanga na safiri.
Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.
Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri ; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi.
Nasololaka na ye elongi na elongi, na polele penza kasi na masese te. Amonaka lolenge ya Yawe. Mpo na nini bozali na somo te ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?
Ye oyo azali se moko oyo akufaka te, avandaka kati na pole oyo moto ata moko te akoki kopusana pene na yango, Ye oyo moto ata moko te atikala komona, mpe oyo moto moko te akoki komona. Tika ete lokumu mpe nguya ezala ya Ye mpo na libela ! Amen !
Moto moko te asila komona Nzambe ; nzokande soki tozali kolingana biso na biso, Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na Ye ezali ya kokoka kati na biso.
Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.
Ezalaki kongenga na nkembo ya Nzambe, mpe kongenga na yango ezalaki lokola kongenga ya libanga ya talo makasi, lokola jasipe oyo emonisaka lokola krisitali.
Mpe Ye oyo avandaki na Kiti yango ya Bokonzi azalaki komonana lokola Jasipe mpe Saridwane oyo ezali mabanga ya talo. Monama ezingelaki Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki kongenga lokola libanga ya talo oyo babengaka emerode.