Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 24:1 - Mokanda na Bomoi

1 Yawe alobaki na Moyize : — Mata epai na Yawe, yo elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele ; bokogumbama na mosika.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 24:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Keati : Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.


Bakitani ya Jakobi bazalaki bango nyonso tuku sambo. Nzokande Jozefi amizalelaki na Ejipito.


Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki.


Yawe azongiselaki ye : — Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.


Yawe alobaki na Moyize : — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki.


Bato bazalaki kaka mosika, wana Moyize apusanaki pembeni ya lipata oyo kati na yango Nzambe azalaki.


Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye


Moyize kaka nde asengeli kopusana pene ya Yawe ; kasi bato mosusu te. Lisanga mobimba ya Isalaele mpe ekomata te elongo na ye.


Sima na yango, Moyize elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele, bamataki likolo ya ngomba


Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.


Nzambe alobaki na ye : — Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule.


Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba.


Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.


Bongo, liboso na yango, bakambi tuku sambo ya libota ya Isalaele batelemaki ; mpe moko na moko kati na bango asimbaki mbabola oyo batumbelaka malasi : ezalaki kobimisa milinga ya solo ya ansa. Yazania, mwana mobali ya Shafani, azalaki mpe elongo na bango.


Yawe alobaki na Moyize : — Kati na bakambi ya Isalaele, sangisela Ngai mibali tuku sambo, ba-oyo oyebi ete bazali bakambi mpe bakalaka kati na bato. Tika ete baya na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe batelema wana elongo na yo.


Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende.


Tango bayekoli yango tuku sambo na mibale bazongaki, batondaki na esengo mpe balobaki : — Nkolo, ezala milimo mabe etosi biso na Kombo na Yo !


Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ