9 Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya ; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike ;
Kasi soki mowumbu yango awumeli lisusu na bomoi mokolo moko to mibale, wana nkolo na ye akozwa etumbu te, pamba te asombaki ye na mbongo.
Okosalisa mopaya mosala na ndenge ya mabe te mpe okonyokola ye te, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.
Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo.
Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali.
Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te.
Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? »
Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango.
« Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »