4 Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango.
Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela.
Nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino mpe bakaputula na ye ya lino. Akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisaki na etumbelo mpe akotia yango na mopanzi ya etumbelo.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.
Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.