Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 23:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 23:12
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki mpe na bato ya Tiri, oyo bazalaki kovanda kati na Yelusalemi ; bango bazalaki komema mbisi mpe biloko ya ndenge na ndenge, mpe bazalaki kotekela yango bato ya Yuda mpe kati na Yelusalemi na mokolo ya Saba.


Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »


Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.


Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema : ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka.


— Mikolo motoba, bokosala mosala na bino, kasi mokolo ya sambo ekozala mokolo ya bule, mokolo ya Saba mpo na Yawe, mokolo na bino ya kopema. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango, bakoboma ye.


Na mokolo yango ya Saba, bokopelisa ata moto te na bandako na bino. »


balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te ? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te ? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.


Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe.


Bongo alobaki na bango lisusu : — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba.


Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ