Balobaki : « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.
Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive.
Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso ? Te, tokoya te !