Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 22:9 - Mokanda na Bomoi

9 Soki moto apesi moninga na ye ngombe to ane to meme to nyama mosusu mpo ete abokola, bongo nyama yango ekufi to ebukani to bayibi yango mpe ata moto moko te amoni mpo na kotatola ndenge nini likambo yango esalemaki,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 22:9
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu.


Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo,


Tango nyonso likambo ekowuta epai na bandeko na bino oyo bavandaka na engumba mpe ekokoma liboso na bino, ezala ya koboma to ya kobuka mibeko, mitindo, bikateli to malako, bosengeli kokebisa bango ete basala masumu te liboso ya Yawe ; soki te, kanda na Ye ekokweyela bino mpe bandeko na bino. Bosala bongo mpe bokozala na pamela te.


kaka ndayi oyo balapi na Kombo na Yawe nde ekokabola bango : Moto oyo andimaki kobokola akolapa ndayi liboso ya Yawe mpo na kotalisa ete ayebi likambo te. Bongo nkolo nyama asengeli kondima maloba ya moninga na ye mpe ye akofuta nyama yango te.


Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali.


Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino.


Moto ya etumbelo ekobanda kopela tango nyonso mpe ekoki kokufa te. Nganga-Nzambe akobanda kobakisa tongo nyonso bakoni mpe kotia mbeka ya kotumba na likolo ya bakoni ; bongo akotumba biteni ya mafuta ya mbeka ya boyokani na likolo na yango.


Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.


Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.


Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango : bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ