Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 22:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi soki moyibi amonani te, nkolo ndako asengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na koyeba soki ayibaki biloko ya moninga na ye to te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 22:7
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino.


Soki moto abombisi palata to biloko na ye ya motuya epai ya moninga na ye, bongo bayibi yango kati na ndako ya moninga wana ; soki bakangi moyibi ya biloko yango, akozongisa mbala mibale biloko oyo ayibaki.


Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, ndenge wana mpe ekosalema mpo na libota ya Isalaele : bakonzi mpe bakambi na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.


Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.


« Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba : mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango.


Moto ya etumbelo ekobanda kopela tango nyonso mpe ekoki kokufa te. Nganga-Nzambe akobanda kobakisa tongo nyonso bakoni mpe kotia mbeka ya kotumba na likolo ya bakoni ; bongo akotumba biteni ya mafuta ya mbeka ya boyokani na likolo na yango.


Yuda Isikarioti alobaki bongo mpo ete azalaki moyibi ; ezalaki te mpo ete azalaki na makanisi ya kosunga babola. Bongo lokola azalaki mpe kobatela libenga ya mbongo ya lisanga, azalaki tango nyonso koyiba mbongo.


miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ