Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 22:30 - Mokanda na Bomoi

30 Bokozala bule mpo na Ngai : bokolia te mosuni ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba ; bosengeli kopesa yango na bambwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 22:30
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga : ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga.


bokobonzela Ye bana mibali nyonso ya liboso : bana nyonso ya liboso ya banyama ekozala ya Yawe.


Bongo nalobaki : — Te, Nkolo Yawe ! Natikala nanu komikomisa mbindo te ! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma ! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te !


Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu.


Nazali Yawe oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Boye bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule.


Bongo na mokolo ya mwambe, basengeli kokata mwana ngenga.


Moto nyonso, azala mwana mboka to mopaya, oyo akolia mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo babomi na nyama ya zamba, akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi. Akozala mbindo kino na pokwa, sima na yango akokoma peto.


« Soki mwana ngombe, mwana meme to mwana ntaba ebotami, ekosala mikolo sambo epai ya mama na yango, bongo na mokolo ya mwambe, ekondimama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Akoki te kolia nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama ya zamba ebomi, noki te akokoma mbindo na nzela na yango. Nazali Yawe.


« Loba na bana ya Isalaele : ‹ Bokolia te mafuta ya ngombe, ya meme to ya ntaba.


Nzokande bokoki na bino kosalela mafuta ya nyama oyo ekufa to ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba misala nyonso, kasi bokoki te kolia yango.


Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama.


Bokoki kolia te nyama oyo bokuti ya kokufa ; bokopesa yango epai ya mopaya oyo azali kovanda kati na engumba na bino ; ye akoki na ye kolia yango ; soki te bokoki na bino koteka yango epai ya moleki nzela, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kolamba mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele.


Bokotia pembeni mpo na Yawe, Nzambe na bino, mwana mobali nyonso ya liboso oyo akobotama kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Kati na bitonga na bino, bokotia na mosala te bana ya liboso ya bangombe na bino mpe bokolongola te bapwale ya bana ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ