26 pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala ? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa.
Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.
anyokolaka moto te, akangaka eloko ya moto te soki adefisi ye niongo, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala, alatisaka moto oyo azali bolumbu,
anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu ;
Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble : mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka.