Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 22:25 - Mokanda na Bomoi

25 Soki moninga na yo asimbisi yo kazaka na ye lokola ndanga, okozongisela ye yango liboso ete butu eya ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 22:25
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize : — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.


Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye : — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala.


Nazwaki mokano ya kopamela bakambi mpe bankumu ; nalobaki na bango : — Tango bodefisaka bandeko na bino, bosengaka bango mileki ! Bozali nde komemisa bandeko na bino moko mokumba monene boye ! Nabengisaki mayangani moko ya monene mpo na kolobela makambo yango elongo na bango.


asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.


Moto oyo abakisaka bomengo na ye na nzela ya moyibi abombelaka yango moto oyo asalisaka babola.


Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.


adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo ; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi ? Te, akozala na bomoi te ! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko !


abatelaka loboko na ye mpo ete esala masumu te, adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka mibeko mpe atosaka bikateli na Ngai ; solo, mwana wana akokufa te mpo na masumu ya tata na ye : akozala solo na bomoi.


anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu ;


adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka loboko na ye mpo ete esala mabe te, akataka makambo ya bato mibale na bosembo ;


Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe.


Pene ya bitumbelo, bazali kolalela bilamba oyo bazwi na ndanga ; mpe kati na ndako ya nzambe na bango, bazali komela vino oyo epesami lokola lomande.


mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki ?


Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo ? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki ? »


Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo ; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola.


Okozongisela ye ndanga na ye ya kazaka ye, na pokwa, mpo ete alala na yango. Bongo, ye akopambola yo ; mpe ekozala mpo na yo likambo ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ