Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 22:24 - Mokanda na Bomoi

24 Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka ; okosenga ye mileki te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 22:24
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazwaki mokano ya kopamela bakambi mpe bankumu ; nalobaki na bango : — Tango bodefisaka bandeko na bino, bosengaka bango mileki ! Bozali nde komemisa bandeko na bino moko mokumba monene boye ! Nabengisaki mayangani moko ya monene mpo na kolobela makambo yango elongo na bango.


Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye.


Bato mabe bazali koloba lokuta mpo na kofunda ngai, bazali mpe kokosela ngai makambo.


Tika ete bana na ye bakoma bana bitike, mpe tika ete mwasi na ye akoma mwasi akufisa mobali !


asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.


Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela.


Nzambe ya Jakobi, na kanda na Yo, bato oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na bampunda bakweyi na somo.


Nani ayebi makasi ya kanda na Yo ? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.


Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango ; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.


Mpo na yango, boma bana na bango na nzala, kaba bango na mopanga ! Tika ete basi na bango bakufisa bana na bango mpe bakoma basi bakufisa mibali ! Tika ete kufa ekomela mibali na bango, mpe bilenge mibali na bango bakufa na mopanga ya bitumba.


Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata ; bamama na biso bakomi lokola basi bakufisa mibali !


Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga ; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela ; mpo ete azala malamu pembeni na yo.


Okoki te kozwa mileki na maboko na ye ; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo.


Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki ? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli ? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.


bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »


Okoki te kozwa mileki epai ya ndeko na yo tango odefisi ye mosolo, bilei to eloko mosusu oyo ekoki kobota mileki.


Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te ; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa.


Ezali somo makasi kokweya na maboko ya Nzambe na bomoi !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ