Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango.
Moto moko te kati na yo akobonza na moto mwana na ye ya mobali to ya mwasi epai ya moto oyo asalelaka soloka, kindoki, oyo atalaka minzoto mpo na kosakola makambo, oyo asalelaka maji
mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.
Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.
Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.