16 Soki tata ya elenge mwasi aboyi kopesa mwana na ye na libala epai ya mobali wana, mobali yango akofuta mbongo ya libala na motuya oyo babalelaka elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
Soki mobali alingi elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali na mobandami na libala te, bongo asangisi na ye nzoto, asengeli kofuta mbongo ya libala mpo ete akoma mwasi na ye.
Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.