Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 22:15 - Mokanda na Bomoi

15 Soki mobali alingi elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali na mobandami na libala te, bongo asangisi na ye nzoto, asengeli kofuta mbongo ya libala mpo ete akoma mwasi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 22:15
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te ; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye.


Nzokande soki nkolo na yango azalaki wana, moto oyo adefaki akofuta nyama yango te. Soki bayokanaki ete akofuta mbongo sima na kosalela yango, asengeli kofuta mbongo oyo bayokanaki.


Soki tata ya elenge mwasi aboyi kopesa mwana na ye na libala epai ya mobali wana, mobali yango akofuta mbongo ya libala na motuya oyo babalelaka elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.


Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala ; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala.


mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ