Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi makolo mibale to songe ya litoyi ya meme, ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama, ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge mpe na basuka ya bambeto na bango. »
Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango ? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te ?