Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.
Soki ngombe ezali na momesano ya kobeta bato maseke, bongo bakebisi makasi nkolo na yango, kasi ye abateli kaka ngombe na ye malamu te mpe yango ebomi moto ; basengeli koboma ngombe yango na mabanga mpe nkolo na yango asengeli kozwa etumbu ya kufa.
— Tango okotanga bana ya Isalaele, moko na moko kati na bango akofuta mpo na Yawe, mpako mpo na kosikola bomoi na ye tango bakotanga ye. Boye etumbu moko te ekokweyela bango tango bakotangama.