Kasi Yawe alobaki na ye : — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.
Pamba te mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala makambo ya mabe, banga mokonzi, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokokisa kanda ya Nzambe mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe.
Boyokela moto ya ndenge wana mawa te ! Mobeko ezali : bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.