Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 21:2 - Mokanda na Bomoi

2 « Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba ; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 21:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ; apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza !


Ezawu alobaki : — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai ! Bongo atunaki : — Boni, obombelaki ngai mapamboli te ?


Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize : — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye.


Nalobaki na bango : — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso ! Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa.


Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika.


Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko ; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo.


Soki moto ateki mwana na ye ya mwasi lokola mwasi mowumbu, mwana yango akozwa bonsomi te ndenge bawumbu bazwaka yango.


Soki ayibaki nyama, ezala ngombe, ane to meme, bongo bakuti nyama yango ya bomoi na maboko na ye, akofuta banyama mibale.


Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama.


Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.


Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.


Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo.


Komona yango likambo ya pasi te kotika mowumbu na yo na bonsomi, pamba te mosala oyo asaleli yo na mibu motoba ezali na litomba mbala mibale koleka litomba ya moto oyo ozwa na mosala. Mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na nyonso oyo okosala.


Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ