Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.
soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika.
Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.
Soki mibali bazali kobunda, bongo mwasi moko apusani mpo na kokangola mobali na ye na loboko ya moto oyo azali kobeta ye, mpe soki mwasi yango asemboli loboko na ye mpe akangi nzoto ya mibali ya moto oyo azali kobeta mobali na ye,