Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 21:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 21:13
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokonzi alobaki : — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? »


Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te, akanisaka yango bongo te ; akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele.


Bayengebene batikali lisusu te na mokili, moto ya sembo azali lisusu te ; bato nyonso bakomi kaka koluka nzela ya kosopa makila, mpe moto na moto azali kotiela ndeko na ye motambo.


Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.


Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango.


Alobaki na Saulo : — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ?


Alobaki na Davidi : — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo !


Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ