Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 20:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 20:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabondelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo ! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !


Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;


Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;


Nasambelaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe natubelaki : « Nkolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya nguya, Yo oyo obatelaka boyokani na Yo ya bolingo, elongo na bato nyonso oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo ;


« Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki ; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. »


Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai.


Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.


Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.


Lokola alingaki bakoko na yo mpe aponaki bakitani na bango, abimisaki yo na Ejipito na nguya na Ye mpe na makasi na Ye ya monene


Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango !


Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.


Pamba te kolinga Nzambe ezali : kotosa mibeko na Ye. Mpe mibeko na Ye ezali pasi te,


Mpe tala makambo oyo bolingo esengaka : kobika kolanda mibeko ya Nzambe. Yango nde mobeko oyo tosengeli kotosa, ndenge boyokaki yango wuta na ebandeli, mpo ete bobika kati na bolingo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ