Kobima 20:23 - Mokanda na Bomoi23 Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo ; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai.
Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.