Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,
Kanisa mokolo oyo otelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na Orebi tango Yawe alobaki na ngai : « Sangisa bato oyo liboso na Ngai mpo na koyoka maloba na Ngai, mpo ete bakoka koyeba kopesa Ngai lokumu tango nyonso bakozala na mokili oyo mpe bakoka koteya yango na bana na bango. »
mpo ete yo, bana na yo mpe bakitani na yo, botosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokozala na bomoi na kobatelaka bikateli na Ye nyonso mpe mibeko oyo napesi bino mpo ete bozala na bomoi molayi.
Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu.
Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te.
Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe.
Samuele azongiselaki bango : — Bobanga te ! Solo, bosalaki mabe nyonso wana ; nzokande bokoba te kozala mosika na Yawe, kasi bosalela Yawe na mitema na bino mobimba.