Kobima 20:17 - Mokanda na Bomoi17 Okolulaka te ndako ya moninga na yo ; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezalaki na moto moko oyo azalaki kaka ye moko, azalaki ata na mwana to ndeko te ; azalaki kopema te na mosala na ye ya makasi, kasi bomengo na ye etikalaki te kotondisa miso na ye. Mpe atikalaki komituna te : « Nani oyo ngai nazali komonela pasi boye ? Mpe mpo na nini nazali komipimela bomengo ? » Wana mpe lisusu ezali pamba : ezali mosala ya mpunda !
Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.