Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 20:14 - Mokanda na Bomoi

14 Okosalaka ekobo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 20:14
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ?


Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.


Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.


Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.


Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki mwasi akosi mobali na ye, wana abimi na mobali mosusu


Elenge mobali yango atunaki lisusu : — Mibeko nini ? Yesu azongisaki : — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,


Mibeko lokola : « Okosalaka ekobo te, » « okobomaka te, » « okoyibaka te, » « okolulaka te, » mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na mobeko oyo moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


Solo, Ye oyo alobaki : « Okosalaka ekobo te, » alobaki lisusu : « Okobomaka te. » Nzokande soki osali ekobo te, kasi obomi moto, yeba ete obuki mibeko nyonso.


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ