Kobima 20:10 - Mokanda na Bomoi10 Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te ; ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki moto moko ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na Isalaele akabwani na Ngai, atie motema na ye na banzambe ya bikeko mpe atie liboso na ye banzambe yango ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo akei epai ya mosakoli mpo na kotuna Ngai toli na nzela na ye, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye.