Azalaki kati na mayangani oyo bakoko na biso basanganaki na esobe ; ye nde azalaki molobeli, kati na bakoko na biso mpe anjelu oyo asololaki na ye, na ngomba Sinai epai wapi azwaki Maloba ya bomoi mpo na kopesa biso.
Yawe akomaki likolo ya bitando yango maloba oyo akomaki liboso : mibeko zomi oyo Yawe ayebisaki bino na likolo ya ngomba kati na moto, na mokolo ya mayangani ; mpe Yawe apesaki ngai yango.
Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo ; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.
Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi ; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.