9 Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango : « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. » Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele.
Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki : « Nazwaki ye na mayi. »