Kobima 2:3 - Mokanda na Bomoi3 Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo ; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, na likolo ya ebale monene ! Bino bapanzi sango ya mbangu, bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.