Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 2:22 - Mokanda na Bomoi

22 Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki : « Nazali mopaya na mboka mopaya. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 2:22
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na bango : — Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino ; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai.


bozalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu ;


Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela, ndenge ezalaki batata na biso. Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka lokola elili oyo ezangi elikya.


Nazali mopaya awa na mokili ; kobombela ngai mibeko na Yo te.


Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bango mpo na kozongisa bango na nzela ; obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele. Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.


Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki : « Nazwaki ye na mayi. »


Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike.


Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye.


Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela.


Tango Moyize ayokaki bongo, akimaki na mokili ya Madiani epai wapi avandaki lokola mopaya mpe abotaki bana mibale ya mibali.


Bana ya libota ya Dani batelemisaki ekeko mpo na bango moko mpe batiaki Jonatan, mwana mobali ya Gerishomi, mwana mobali ya Manase mpe koko ya Moyize, mpo ete akoma Nganga-Nzambe ya bato ya libota ya Dani elongo na bana na ye. Basalaki mosala ya bonganga-Nzambe mpo na libota ya Dani kino tango bato ya mokili bakendeki na bowumbu.


Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele, » pamba te alobaki : « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ