Kobima 2:20 - Mokanda na Bomoi20 Reweli atunaki bana na ye ya basi : — Moto yango ya Ejipito azali wapi ? Mpo na nini botiki ye kuna ? Bobenga ye mpo ete aya kolia. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo.