bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami.
na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko, bambuma oyo etondi kati na mokili ! Tika ete Nzambe oyo avandaka kati na nzete moke oyo ezali kopela moto apambola moto ya Jozefi mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye !
Mpo na kondima, baboti ya Moyize babombaki mwana na bango, Moyize, sanza misato sima na mbotama na ye, pamba te bamonaki ete azali kitoko mingi mpe babangaki te mobeko ya mokonzi.
Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko ; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele : « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »