Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi.
Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani.