Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 2:16 - Mokanda na Bomoi

16 Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 2:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo


Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.


Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi.


Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.


Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito.


Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito.


Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.


Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.


Wana bazalaki komata ngomba oyo ekenda na engumba, bakutanaki na bana basi oyo bazalaki kobima mpo na koluka mayi. Batunaki bango : — Boni, ezalaka awa na moto oyo azwaka bimoniseli ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ