Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tango Faraon ayokaki likambo yango, alukaki nzela ya koboma Moyize ; kasi Moyize akimaki liboso ya Faraon mpe akendeki kovanda na mokili ya Madiani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 2:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.


Ketura abotelaki ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa.


Madiani azalaki tata ya Efa, ya Eferi, ya Enoki, ya Abida mpe ya Elida. Bato oyo nyonso bazalaki bakitani ya Ketura.


Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.


Balongwaki na Madiani mpe bakendeki na Parani. Wuta na Parani, bazwaki bato mpe bakendeki elongo na bango na Ejipito epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Faraon apesaki Adadi ndako, eteni ya mabele mpe bilei.


mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri, » pamba te amilobelaki : « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. »


Yawe alobaki na Moyize tango azalaki nanu na mokili ya Madiani : — Telema mpe zonga na Ejipito, pamba te bato nyonso oyo balingaki koboma yo basili kokufa.


Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.


Namonaki bandako ya kapo ya Kushani kati na pasi, mpe bandako ya mokili ya Madiani kati na mitungisi.


Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo : bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.


Nzokande libulu ya mayi ya Jakobi ezalaki kati na elanga yango. Boye lokola Yesu alembaki nzoto mpo na mobembo, avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene ya ngonga ya midi.


Tango Moyize ayokaki bongo, akimaki na mokili ya Madiani epai wapi avandaki lokola mopaya mpe abotaki bana mibale ya mibali.


Mpo na kondima, Moyize abangaki te kanda ya mokonzi mpo na kobima longwa na Ejipito, mpe atikalaki ngwi na mokano na ye lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ