Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 2:11 - Mokanda na Bomoi

11 Mokolo moko, wana Moyize akomaki mokolo, akendeki na esika oyo bandeko na ye bazalaki mpe amonaki bango kosala misala makasi oyo bapesaki bango mpo na konyokola bango. Amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moko kati na bato na ye Ba-Ebre.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 2:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango : — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala ?


Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki : — Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango ? Bozonga na mosala na bino !


Faraon abakisaki lisusu : — Botala ! Bato oyo bakomi ebele kati na mokili, bongo bino bozali kopekisa bango kosala mosala !


Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta.


Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.


Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.


Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : kokata minyololo ya masumu, kofungola basinga ya ekangiseli, kopesa bonsomi na mowumbu mpe kobuka ekangiseli nyonso.


Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.


« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ