Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 19:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko : — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 19:8
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango : kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola.


mpe balobaki na Moyize : — Tika ete yo moko oloba na biso, mpe tokoyoka yo ; kasi Nzambe te, noki te tokokufa !


Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo : — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi.


Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki : — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi mpe tokotosa yango.


Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe.


Kasi bato balobaki na Jozue : — Te, tokosalela kaka Yawe !


Bato bazongiselaki Jozue : — Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ