Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 19:4 - Mokanda na Bomoi

4 « Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 19:4
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.


Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.


‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. ›


Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te ? Boni, tokelama na Nzambe moko te ? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso ?


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.


Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. »


Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba.


Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa.


Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango.


Bino moko bomonaki makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki liboso ya bikolo oyo nyonso mpo na bolamu na bino, pamba te ezalaki Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki kobundela bino.


Kasi mapapu nyonso mibale ya mpongo moko ya monene epesamaki na mwasi yango mpo ete apumbwa kino na esika na ye, na esobe epai wapi asengeli kosungama, mosika ya nyoka, mpo na tango moko, mpo na batango, mpe mpo na ndambo ya tango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ