Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 19:22 - Mokanda na Bomoi

22 Ezala Banganga-Nzambe oyo basengeli kopusana pene na Ngai, basengeli komibulisa ; noki te Ngai Yawe, nakoboma bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 19:22
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi ; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. »


Bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale. Banganga-Nzambe elongo na Balevi bayokaki soni, bamibulisaki mpe babonzaki bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.


Balongaki te kosepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama, pamba te Banganga-Nzambe oyo bamibulisaki bazalaki mingi te, mpe bato basanganaki te na Yelusalemi.


Yawe azongiselaki ye : — Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango.


Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,


Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani.


Bokende, bokende, bobima awa ! Bosimba eloko moko te ya mbindo ! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !


Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango ; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe.


Loba na bato : « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela : ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito ! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango.


Kaka na tango yango, akweyaki liboso ya Petelo mpe akufaki. Boye tango bilenge mibali bakotaki, bakutaki ye ya kokufa. Bamemaki ye mpe bakendeki kokunda ye pembeni ya mobali na ye.


Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ