Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 19:20 - Mokanda na Bomoi

20 Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 19:20
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki : — Bima mpe telema na ngomba liboso ya Yawe, pamba te Yawe alingi koleka. Boye mopepe moko ya makasi penza epepaki, ebukaki bangomba mpe epanzaki mabanga liboso ya Yawe. Nzokande Yawe azalaki kati na mopepe makasi te.


Okitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu.


« Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »


bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele.


Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe ; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye : — Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele :


Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye


Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.


Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba.


Moyize abongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Bongo na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, amataki ngomba Sinai ndenge kaka Yawe atindaki ye ; amemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ye.


Alobaki : « Yawe awutaki na Sinai ; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.


Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ