Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Kobima 19:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tango balongwaki na Refidimi, bakotaki na esobe ya Sinai, mpe Isalaele atongaki kuna kati na esobe molako etalana na ngomba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Kobima 19:2
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato.


Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi.


Jetro, bokilo ya Moyize, elongo na bana mibali ya Moyize mpe mwasi ya Moyize bayaki epai ya Moyize, na esobe epai wapi batongaki molako pembeni ya ngomba ya Nzambe.


Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.


Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.


Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye :


Kolongwa na Refidimi, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Sinai.


Sima na mibu tuku minei, anjelu moko abimelaki Moyize kati na esobe, pene ya ngomba Sinai, kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete oyo ezalaki kopela.


Azalaki kati na mayangani oyo bakoko na biso basanganaki na esobe ; ye nde azalaki molobeli, kati na bakoko na biso mpe anjelu oyo asololaki na ye, na ngomba Sinai epai wapi azwaki Maloba ya bomoi mpo na kopesa biso.


Makambo oyo epesami lokola ndakisa : Basi oyo mibale bazali kotalisa boyokani mibale. Moko ewutaki na ngomba Sinai mpe ebotaki bawumbu ; yango nde Agari azali kotalisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ